"Bótika kosala bobele po na bilei oyo ebebaka, kasi bósala po na bilei oyo eumelaka,
pe epesaka bomoi ya seko. Bilei wana, Mwana ya Moto akopesa bino yango,
pamba té Nzambe Tata alakisi polele ‘tč atindi ye." Yoana 6 : 27


Yango wana, bandeko na ngai ya bolingo, bótia molende po na bókweya té.
Bómipesaka tango nyonso na mosala ya Nkolo. Bóyebaka ‘tč pasi oyo bomonaka
na mosala ya Nkolo ekokende pamba té. 1 Bakolinto 15 :58


Nkolo adjali koluka Bato ya Kolimbola Mateya/Malakisa

 

Komela biso soki olingi kosunga pe kodjala ya motuya epai na Yesu-Kristo po na kosala mosala ena.
Kobosana té’tč :  "…. Bambuma ebele etondi na elanga, kasi bato ya kobuka yango bazali mingi té."  Matai 9 :37

Soki odjali na makoki ya kosala mosala oyo, pe oponi koboya kosala yango, yeba ‘tč oponi kodjala lolenge ya mosali mabe oyo Yesu alobi na lisese ‘tč…….   na  Matai 25. Tanga oyo elandi awa na se, oyeba oyo edjali kojela basali mabé, basali batomboki :

Na sima mosali oyo azwaki liboke moko ya mbongo ayei pe alobi :"Mokonzi, nayebaki ‘tč ozali moto moko ya matata : obukaka mbuma ata oyo okoni té. Nabangaki, yango wana nakendeki kobomba mbongo na yo na se ya mabelé. Tala, mbongo na yo yang’oyo". Mokonzi na ye azongiseli ye :" Mosali mabe pe ya goigoi ! Oyebaki ‘tč nabukaka mbuma ata oyo nakonaki té; bongo ebongaki ótia mbongo na ngai na banke, boye lokola nazongi nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi. Bóbotola ye liboke ya mbongo wana pe bópesa yango na mot’oyo azali na maboke zomi. Pamba té, mot’oyo azali na biloko mingi, bakobakisela ye mosusu; kasi oyo azangi biloko, bakobotola ye kutu ata ndambo oyo azali na yango. Bóbwaka mosali oyo ya pamba-pamba na libanda, na molili, esika balelaka pe baliaka mino." Matai 24 :24-30

 

Tika ‘tč Nkolo ákela na kati na yo esengo po na mosala na Ye !



Komela Biso awa: mail@mcreveil.org


             



Bongo Yezu alobi : "Tala, etikali moke nŕya ! Nakoyeela moto na moto lifuta ya mosala na ye". Emoniseli 22 :12

"Pamba té Nzambe azali bosembo; abosani mosala na bino té to bolingo oyo bolakisaki ye, pe bozali kosalisa bandeko na bino bato ya Nzambe na kombo na ye tii lelo". Ba-Ébré 6 :10